jeudi 26 novembre 2009

LIKAMBO YA BOKOKO EZALI KOTUNGISA , PONA NINI?

LIKAMBO YA BOKOKO MPO NA NINI EZALI KOTUNGISA?




Motuna oyo ya koyeba , po na nini likambo ya bokoko esuwaka ? Ezali solo motuna ya tina mingi na tango oyo. To mipesi lelo ndingisa ya kokamata ma kanisi na biso , kotiya yango na esika moko , mpe komeka ko pesa eyano na motuna oyo natina ya kopesa mwa mwanga ya boyebi epayi ya bandeko na biso nyionso oyo bakutani na tango oyo na libanda ya mboka Kongo , ba oyo to bengi bandeko ya diaspora . Likambo ya boyebi, mpe bonzogeli bokoko ya ba yindo ezali likambo oyo ezali kokoma na tango oyo ; na loboko ya mobali , lokola likonga mpo na kolonga mpongi ya kotelema oyo moyindo a milalela na ye . Kasi na loboko ya mwasi ezali na bato bayike oyo bazali kosepela te na lolenge bokoko ezali katelemisa bayindo . Bango bami pesi mosala ya kotelemela yango na ndenge ya kosakana te. Solo nyionso wana ezali kaka na tina ete moto moyindo akoka ata soki moke te kolamuka na mpongi ya liwa oyo azali na yango.Mpngi solo oyo ememi mokili na ye na buzoba mpe na pai ya liwa . Na ba ndeko oyo , to zali komituna soki bazali kosala mosala wana kaka na tina ya bozangi koyeba ? Na tina ya motema mabe? To mpe bazali yasolo kosala yango na  tina ete  na esikaba telemi na likambo oyo ezali malamupo na bango ete mabunga na biso ezala obele bongo ? Lokola lisusu totuni , soki  bazali kosalela yango mpo bayebi nzela mosusu te ? Lokola Mundele alakisa bango kaka nzela moko wana ya ko boma kibobango??
To zali kotuna motuna na bosolo nyionso na ba oyo bazali kobundisa bokoko. Ba oyo ba zali kobundisa na mino , mansaka , na ba kamo , na makila na bango lokola; na ko luka kopekisa bayindo bakoka kotala lolenge kani bakoki koluka libiki na likama oyo ekutani na mabele na bango na bokimeli na boyebi na bwanyia oyo bato na kala bazalaki kosalela? Mpe na sima na yango kosangisa na oyo ya lelo na tna ete ebota mbuma ya sika !!
Soki to tuni ba oyo nyionso ba zali kobundisa likanisi oyo ; motuna ya koyeba na solo eloko nini ezali kotinda bango na etumba wana ?
Mpo solo likanisi ya kozongela bokoko na bayindo ezali koya lelo oyo lokola mopepe ya makasi oyo ememaka sango ya mbula ya ba kake . Ezali koya lokola moto ya zamba oyo ekimisaka ba nyiama nionso. Mopepe oyo ezali kobeta na tango oyo ya bilaka, na tina ya kolamusa mwana Kongo mpe bayindo na kotelema mpe kozwa bokonzi ya mabele na bango, bango moko.
Bandeko soki to tuni bato oyo na bosembo nyionso ndenge tolobelaki yango mwa sima . Yasolo na kati na biyano na bango to zali kaka komona bozangi mayele ya kopesa mpwasa na makanisi oyo ba zali kobimisa. Mbala ebele , ezali kaka maloba ya kolinga kokima bosolo nde ba zali kobimisa ( ba excuse). Ba mosusu ba koloba ete , bazali kobundisa likanisi oyo na tina ete baaye bazali kotelemela yango , ba pesa nanu te bososoli ya solo ya likanisi ena . Misusu ba koloba ete likanisi ya bokoko ezali kolakisa na mpwasa nyioso te mibeko ya solo ya boyebi ( scientifique). Tango mosusu tozali komona ete ezali nde makanisi oyo ezanga moto na makolo nde ezali kolanda. Neti , bazali koloba  ete , bakoko na biso ba tikala kosala eloko moko te ya malonga na evandeli na biso ya mikolo oyo to la vie moderne , to mpe la civilisation moderne.
Soki to tali malamu , malamu  tokoki koloba boye ete  ezali  epayi ya bayike  nde kozanga bososoli ya koloba ete bokoko na bayindo ezali nde nzela na bondoki ezali eloko ya mabe , ezali misala na Satana oyo lokola kaka bo Ndimi  ya ba paya oyo ba ndimela etangisa bango.
Ezali solo  ete ba mbeba ebele esalema na kombo ya bokoko na kati ya mabele  na biso , mpe na mabota ya bayindo. Solo kokamwa te, soki bilenge bayike bakoma kokima likanisi nyioso oyo ezali komema bango na nzela ya bokoko. Lisusu mpe lokola , na nzela ya kelasi mingi mingi batangisa bato ete bokoko ezali eloko moko ya bozongi sima , ya bosoni , ya bonyiama . Kokomwa te lisusu, soki bana ya mikolo oyo ba zali kokima yango , mpe kobwaka bobiso ! Na tina ete kozanga koyeba ezali liwa ya ndambu te kasi liaya mobimba .
Eloko esengeli to beta sete lisusu awa , ezali ete bokoko ya bayindo na lolenge to ye kozwela yango na tango oyo, ezwua mpe ma bungi mingi uta na Ma fua ya  colonisation . Kokonzama ya tango molayi na bamindele! Solo esengeli to zalaka na soni te ya kotatola ete . Yasolo kokonzama na ba mindele ebebisi bizaleli na lolenge na biso ebele . Lisusu ekomisa biso lokola bato moko oyo bazali komisolola lisusu te. Ebele na bobiso ekoma komona kaka lokola ya mabe ata soki ete na libandeli ezalaka penza bongo te!


Yango wana na botali matata nyionso oyo ezali kokomisa  bososoli ya bokoko na biso pasi , mpe lokola bato bayike bazali kotuna biso mikolo nyionso soki bokoko na biso ezali solo koloba eloko nini? to monaki ete ya solo tango ebelemi , tango ekoki na tina ete tobanda ko tiya na makomi tina ya solo ya bokoko na biso bayindo.
Na kosukisa  lokasa oyo esengeli lisusu ko benda matoyi ete ezali na bokeseni makasi na kati ya liloba oyo to lobi BOKOKO na BAKOKO.
 Malembe na esika oyo , Bakoko ezali ba bokulaka , batu ya  yambo oyo to zali bakiteli na bango . Kasi bakoko ezali lisusu ba oyo bakozala  ba kiteli na biso.
 Bokoko ezali lisanga ya mibeko , bwanyia , mayele  na boyebi ya botambuisi  bomoyi na biso , mabota  na biso , na ekolo na biso oyo BAkoko na biso batikelaki biso lokola libonsa .


Mokonzi LEOPOLD WA BA BALE

Ekokamwisa bato ba ike, ba konituna tina  nini na ma solo ya bokoko na biso tobandi lisusu kolobela Leopold wa babale oyo zala na ye koko na bisote ? Solo ba ndeko balandi ezali mpeza na tina tolobela likombo ya tata oyo.


Kasi liboso ya kolobela na mozindo tina na yango mpe kolakisa soki bokoko na biso ezali nini . To meka nanu kotala esika nini solo moyindo azali ya kobunga lelo oyo !, lisusu lmpe lokola soki mabnga na ye ezali nini?
Solo yango nde ekotinda biso tolobela likambo oyo etali mbela (discours) oyo mokonzi ya belejika Leopold II a salaka na nkoto moko kama mwambe zomi na mwambe na mine (1884) na tango oyo azalaki kotinda ba Nganga Nzambe,na ba missioni , na mabele na Kongo . Solo soki to zongeli Mbela wana malamu na eteni na yango ya songolo. Tata oyo, Leopold wa babale, apesaki mitindo na ba Nganga Nzambe na ba missioni na tina ya kotangisa ba Nyingalakata ya bayindo ko kanga boyebi , na boNzambe na bango kaka. kasi kozala na bososoli na yango te. Ezai malamu kokanga boyebi lokola chaku ( ndeke ) kasi kososola te lokola batu.

Papa Nkusu Nzalampanda na Ngola oyo azali moko ya ba songia nzila ya bayindo na tango oyo . Amemaka biso na bososoli tango nyioso  oyo azalaka na masolo na biso na tina ete, kososola esika kani pasi na biso ehuti ezali na bosenga ya kososola likanisi ya mokonzi ya ba beleji Leopold wa babale, oyo azalaki kotambola na kolanda matabe ya bakoko na ye . Leopold II , solo a tunaki mituna  mpe azwaki eyano na Lolenge kani esengelaki kosala na tina na kokanga bayindo na bohumbu ya libela.Na tina ete bazala kaka kosalela ba ndeko mindele  na libela  .Moyindo na nzela ya kelasi , ba Mindele ba tangisami mingi mingi te kososola makambo kasi kaka ko kanga ya ngo okola chaku  na ndenge bapeselelaki ye yango  to mpe ko boya yango soki ezali na llenge ya ba mindele te . Mpe lisusu Leopold wa babale na kati kaka na mbela na ye alobaki na ba Nganga Nzambe, na ba Missioni ba sala nyionso mpo ete ba bosamisa ba yindo bokoko na bakoko bango nyionso  na botangisi bango kaka kobelela:  ba santu maria , ba yesu oyo bazali bakoko na bango te mpe bakoki koyoka bango soki moke te.
Ata soki omoni moyindo azali kobeta tolo ete :"ngai na tanga mingi . Na zali na boyebi". Yebaka kaka ete akanga kanga makambu oyo ba pesa ye ndingisa(permission) ya ko kanga epayi ya ba Mindele na nzela ya kelasi . Lokola kaka chaku , lokola kaka kinga akanga yango. Na botali kaka mbela ya Leopold wa babale tokoki komona ete ya solo mbela na ye elandemaki na bokebi nyionso kino mokolo ya lelo . Yango wana solo tokoki komona ete lelo oyo mwana Kongo a koma mbundeli monene ya bo Nzambe ya ba paya, na ndenge ya ndakisa  . Na kanisi na kati ya lilita na ye sorodiongo oyo ya leopold wa ba bale azali kosepela mpe kobeta maboko, na koganga ete : "ya solo ba ningalakata oyo balandi likanisi na ngai na bokebi nyionso. "Tokoloba wana na ndenge ya kolakisa ete yasolo mabe ayo ya kokanga kanga mpe kozanga bososoli ezali mbeba oyo ebomi biso makasi na moyi mwa lelo na mabele ya Katiopa (Afrique ) mobiba . Tala esika to bungisi bomoto na biso nyionso to komi lokola bato bazali na tina lususu te na mokili oyo ya batu . Kasi esengeli ba ndeko  tangi bolanda biso na bokebi nyionso . Pamba te , tozali koloba te , bana ya katiopa esengeli ba tanga kelasi ya mundele te . Kasi to zali kokebisa awa ete , lolenge ya kozwa boyebi na biso na katiopa esengeli ebongwa na tina ete ekoka kobota bato oyo bazali na bomoto nakati na bango na tango oyo bazali kokanga ba mayele mosusu oyo tozalaka na yango te . Bato oyo bakoki kosalela mito na bango na tango nyionso, na esika ya bato oyo bazali kaka bindima ndima , bikanga kanga . Ya solo to yebi tina ya kelasi ezali ya motuya kasi esengeli ebogwana . Na tina ete mbuma na yango ezala bokende liboso ya Katiopa. Ata awa na poto soki otoli malamu kelasi ya ba chaku ezali . Lolenge bazali kotangisa bana na bango oko mona ete mingi mingi ezali kaka lolenge wana na tina ete ezali malamu mpona kokonza batu ya bongo bazanga bososoli. Ezali malamu ya kokonza bato bazala lokola ba chaku . Pamba te bo sosoli ya solo ezali kotangisama kaka na ba ecole mystique na bango to boyebi ya lokutu na ba oyo ba ponami mpo na kokonza ba misusu to la classe elite .
To zongela Katiopa mpo yengo nde solo etali biso. Tosi tolobelaki yango bato ya mayele ya Katiopa (Afrique ) ba tangisaka bango mingi mingi te lolenge ya ko zala na boyebi ya solo . Ezali kaka tango mosusu na bokasi ya basusu nde bakomaka na bososoli wana to mpe ba botamaka lokola bana ya bilembo. Awa to koki kotanga ndakisa ya bato lokola Papa na biso Okitasombo Lumumba oyo ayebani mingi na kongo ya Patrice Emery Lumumba oyo atangaki na ye ba univerisite  te ,kasi azalaki solo mwana ya bilembo.

Bato ya kelasi ya chaku mingi basepela kaka kosalela ba mindele na tina ete bango nde basalaka bomoto na ba oyo na nzela ya kelasi . Ezali kokamwa te soki mingi ya baye tobengi bato ya mayele ba sepelaka na bango kaka kosalela ba mindele mpe na tongo ba mindele bazalaka lisusu na posa na bango te ba bwakama libanda lokola bibwele lokola  ndakisa ya ba Empereur Bokasa , Marechal Mobutu , Idiami dada mpe bongo na bongo . kasi mpo na nini tozwaka mayele te ?


Na kati ya mpitakani wana , ezali solo na bana mosusu ya Katiopa oyo ba zali kobunda mpe kotelema na tina ya kozongisa bandeko na bango na nzela . Na kati ya boyebi ya kelasi oyo to bengi domaine scientifique .Tokopesa awa matondo epayi ya ndeko na biso Professeur Kalele Kabila oyo azalaka ko kangisa na universite ya Lubumbashi na tina ete ye asosola ki mpe akomaki kotangisa na bayekoli na ete:" lisolo ya solo (Scientifique ) ezali lisolo oyo ezali kokokana na ndenge likambo ezali . Lisolo ya solo (scientifique) ezali oyo babeti yango na ndenge ezalelaki.Lisolo oyo bayanoli yanga kaka na ndeka ezalaki " kasi lisolo oyo ezali kaka kotosa mibeko ya kokoma na lolengeyaba mindele te . .. Na esika oyo ye aboyaki kolanda nzela ya balakisi na ye ya kala ( ba mindele ) oyo balobi ete na tina ete lisolo ezala ya solo mpenza (scientifique ), esengeli elanda mibeko oyo mondele atelemisa lokola esengeli lisolo wana ezala na bozwi ba temoin ya bamindele to oyo bamindele bandimela. Elingi koloba lisolo  tina ezala solo esengeli esimbeli  na yango efanda na  kosimbisi ya koko ya basusu  . lokola ete soki na lobi bongo , ( ndkisa yalisolo) ezali kola koko songolo to mpakala ya mundele alobaki. Ya solo tosali kozongela awa te makanisi ya ndeko na biso Mbuta Kalele , kasi ya solo alakisi biso ete , na tina ete moto abanda kobimisa makanisi ya sika esengeli azala na bososoli ya solo mpe bomoto na ye na esika na yango . bososoli oyo eyaka na sima ya botuni solo nyioso mutu na tina ya likambo wana . Pamba te soki bososoli ezali te to koki kobimisa makanisi ya sika te ! Tokoki kozala ba boti  makanisi te .  Omona wapi chaku a bongola likanisi na ye? To abimisa likanisi ya sika? Yango mpe nde ekosala ete tokoka kotombola boyebi oyo ekobikisa mboka mobimba , na tina ete baloba ete" soki ozali kokanisa ; nde ozali . "

Na kati ya mabunga nyionso oyo . Bana ya mboka ebele ba komi fongola miso , kotelema mpe koluka lolenge kani ya kokanisa, kasi mingi koluka ndenge ya kosala mpo na kobongisa , kopesa lisungi na kolakisa kaka lolenge ya kolongwa na kati ya pasi oyo.
Na kati ya bato ya bwanyia oyo , ezali na baye bakanisi ete esengeli kotelemisa lisusu Kimoya ya bayindo , kozongisa bomoto na bango, oyo esi ekufa ,na sika na yango. Kozongisa bomoto ya bayindo ezali lokola mbotama ya sika . Pamba te moto azali elimu ( kimoya  ) oyo alati nzoto oyo zali na esika naye, elingi ko loba ekolo.  Nakati ya botelemisi kimoya , bomoto ya ba yindo to mpe lisusu mbotama yasika , likanisi epesamelami mingi na kopesa lokumu na bokoko na bato na bato.
Solo likanisi oyo epesama nango  na tango na kala na ba mobu nkoto moko na zomi na sambo (1970) na ba bato ya bwania ebele ya KAtiopa (Afrique) . Nakolanda kaka likanisi wana ya ngo eloba na ngo malamu Mkumu Cheik Anta Diop :"Mpo na kobinisa lisusu moto na kati ya mokoli na pasi oyo a mikotela . esengeli azonga kobwaka liso na ye na kati ya mboka ya EKA PHTA oyo to bengi  Eki Pata (Egypte pharaonique) . Na tina ete Kuna na nde esika Bobiso ya solo etikala ."
Kasi likanisi wana esengeli esalema te na lolenge oyo Nkondo Marchele Mobutu Sese Seko ya kongo amemelaka yango . Natina ete loyenge ya Nkondo Mobutu ezalaki kaka Nzela ya moyibi na bonyiama oyo epesakaye ndingisa ya ko wanda na ebonga ya moto ya mboka mpo na mikolo ebele , na tango oyo Mboka esalaki kokufa na ndenge moko yakosakana te. Nakanisi lolenge ya moyibi ya ndenge wana ezali solo oyo bokoko ezali kotelemela te . Bato mosusu ya minoko mabe ba zali kolinga kosalela mabunga ya Nkondo Mobutu mpo na kolinga koloba ete bokoko ezali mabe . ezali bongo te. Kasi ezali mawa yakomona ete ba oyo ba zali kolobela kaka mabe ya bokoko ba zali komemela biso eyano mosusu te mpo tosikola bomoyi ya bayindo soki te kaka ba eyano oyo eboma bobiso mpe mema biso na se ya bato nyionso ya mokili  , lelo soki ba mbula kama na kama .
Likanisi ya bokoko ezali nzela ya bosolo mpo na kosongisa bomoto ya bayindo. ezali nzela ya mbotama ya sika ya Katiopa mobimba na tina ya kozala lisusu bato na bomoto. Umutu Wa bantu eloba bandeko na biso ba Zulu, Solo likanisi oyo lokola tolobelaki yango ezali koya lokola mopepe ya makasi oyo epesaka sango ya mbula ya ba kake , lisusu lokola moto ya zamba oyo ekimisaka ba nyiama nyionso na zamba! Ezali koya kolamusa , kosekwisa , mwana Kongo oyo akoma komikanisela  lo kola moto na mayele na tango oyo ye akoma solo bolole  na kati ya mokili mobimba.

Yango wana lokola boyebi ya bosolo ( la science) , bokoko esengeli ezala na biteni ebele to( Plurie disciplinaire), pamba te ezali kotiya likolo na mesa mutuna ya motuya mpenza , kobimisa bososoli na yango mpe kosalela ya ngo. Ezali kozala ata na mawa soki moke te natina ya koluka bosolo . kasi mingi mingi ezali kobanda na kati na bobiso , oyo toyebaki , oyo tozali mpe kobimisa yango na mpwasa.
To pesa awa ba ndakisa ya biteni oyo bokoko esengeli ezala na yango.

1. Na ngambo ya oyo etali ma ye maleka na mabele na biso to mpe histoire .

Likanisi ya bokoko ezali kosenga natina ete mosala esalema makasi pamba aye maleka ya  solo  na mokili na biso ekoka ko komama mpe koteyama na biso moko mpe epayi ya bana na bakoko  na biso . Nkondo Patrice Lumumba alobaka :" Bomoyi ya Kongo ekokomama malamu malamu kaka na bana ya Kongo bango moko."
Likanisi oyo etali bokoko ezali kopesa longonya  makasi na baluki boyebi ya bakoko na biso uta Ekipata (chercheurs)na tina etali ma ye maleka . Ba yika mpiko na tina yakoluka ko koma  yango  na sembo mpe semba  nyionso. Lisusu  kosala mosala malamu na botie pembeni ba lokuta oyo etangisa ba mindele lokola. Mboka na Ekipata ezalaki na ngambo ya Asia occidentale mpe ezalaki ya ba mindele oyo bazalaki na mposo moyindo !!! to mpe ezalaki ya ba mindele.  Ndenge ezali na kati ya dictionaire ya oxford university ne ndenge ya ndakisa . Kasi kolakisa ete solo Ekipata ezalaki ya bayindo oyo sikoyo bakitaki na kati ya katiopa mobimba mpe na moyi mwa lelo bazali kowanda ko banda likolo ya katiopa ti na se , na ba mboka nyionso oyo ba yindo ba kutani. Ba lokuta lokola Diego Cao ezali moto ya yambo  oyo a komaki na esika oyo mayi ya ebale ya Nzadi ekwayaka na Kalunga (ocean) cad Embouchire na 1482 Nkoto moko na kama mine na zomi na mwambe na mibale , lokola bakoko na biso bazalaka bango nyionso ba kufamiso kaka yamoko nde akokoki komona yango?

Sphinx na Pyramide ya KUFU(KUFWA)




Ma ye  ma biso ya kala na Ekipata esengeli ebetama na lolenge esengeli . Na tina ete ezali biso bayindo nde tozali bakitali ya Ekipata mboka mpe bakoko na biso ba bengaka Kemet (K-M) elingi koloba mboka ya bayindo oyo eyaki kobota Mboka oyo to bengi Kongo (K-N) solo na botali malami tomoni ete bakomo mibale wana ezalaki koloba kaka eloko moko bokoki kotanga yango na( discussion Wikipedia Kongo).

Ezali kombo ya Eki Pata oyo elingi koloba" awa molimo ya Tata azali" to mpe "Awa kimoya ya Tata ". Yango nde ba geleki (grec ) ba bongolaki na monoko na bango Egypte. Maye ma  solo ya Ekipata , Napata , Monopata , Kanana , Mpungwe ,  esengeli ebetama epayi ya biso na bana na biso epayi ya bato moyindo oyo ba zali kolanda masolo yango mpe oyo bazali kososola bobiso. Masolo ya Kongo , ya Mali ,Ba Kuba , BaLuba , Bena Zulu, ya Ba songe, Songye na ya bokonzi nyionso etelema na Katiopa esengeli ebetama na mozindo mpe na sembo nyioso....
Baluki Maye maleka , na ba beti Masese (historiens) na biso bana ya Katiopa lokola Tata COOVIS GOMEZ, Tata Obenga , Tata Sthimpaka , Tata Bwemba , Tata Onotunde esengeli bayika mpiko na mosala kitoko oyo bazali kosala na kolanda matambe ya Mfumu Cheik Anatadiop . Awa mpe tokobosana te tata Ne Mwanda Nsemi yo azali longi ya kongo na mosala kitoko oyo azali kosala na kokoma masolo na biso uta na se ya katiopa na ndenge to mata na likolo lelo oyo.
Na tina ete misala na bango ezali mayi ya bomoyi mpo na biso bayindo! Na bososoli maye maleka  wana tokoki koyeba esika nini bokoko nabiso basalaki mosala malamu mpe esika nini bango ba kwayaki na motambo ya bapaya . Pambate esengeli toyeba yango malamu. Na tina ya kososola maye mazali kokomela biso lelo oyo, esengeli to yeba oyo ma lekaki lobi ; lisusu na boyebi lelo nde eko mema biso na koyeba oyo to koki kosala mpo na lobi kuna .

2.Na likambo oyo etali Bo Nzambe ,

bato oyo batelemili mpo na bokoko na biso , balobi ete lokola losambo, bo Nzambe ezali eloko moko ya motuya na likombo etali bomoto ya bato . Esengeli mosala ya makasi esalema sa nzela wana na tina ya koluka mpe kozongisa bokoko na biso na makambo etali losambo na lolenge bakoko na biso batambwisaki ya ngo na EKI PATA . Tozongela ko belela bakulu na biso oyo balonga na Bisimbi   . Mosala ezalama na bososoli ya balokota na biso na tina ete mwanga epesama na makambo etali boyebi to etalieli na biso ya mokili ya molimo  to mpe lisusu yamozindo ya mokili . Nzambi ezali nini ? elingi koloba nini   ? Nzambia  mpungu Tulendo  ezali nini? Molongo na biso ezali lolenge kani?
Mpe bakombo nyionso oyo ya bokeli eyebani na yango na kati ya Katiopa(Afrique ) mobimba . Lisusu bakotiya molende natina ete bana ya Katiopa ba tika ko landa bokoko ya baninga mpe bazongela bokoko na bango moko , bo Nzambe na bango moko. Likanisi ya bokoko elinga elakisa na mpwasa nyionso esika nini lolenge  ya bapaya ekotisaki biso na bobungi na mikanda na bango misantu. Basokolaka  , mpe kolamba mbisi kaka na mayi oyo kakangelaki ya na yango.

3. Na likambo oyo etali ba nkota(Langues).

Likanisi ya bokoko ezali kolendisa bato na bozongeli bosaleli ya ba nkota na bango na kati na misala nyionso. likanisi oyo elingi kalongola lolenge ya mabe yakokanisa ete soki moto azali koloba nkota ya bapaya , ba mindele elingi koloba ki francais , ki anglais to bongo na bongo, elingi ezali kolakisa ete azali na mayele ! Mpo kozala ma mayele elingi loba kozala na lolenge ya bososoli makambu mpe botali makambu na tina ete emema bokendi liboso ya mokili na yo. Esengeli mikanda na biso ezala kokomamema ba bankota na biso . tina likombo oyo olobi malamu esengeli ososola yango malamu.

4. Nalikambo oyo etali bososoli ya lolenge ya kokamba bato (science politique, ) mpe boyebi mosusu lokola Medecine , pharmacie ...

Eyebana mokili mobimba ete, kolongola likabo ya motuya oyo Katiopa apesa na mokili ; elingi koloba moto ye moko na tina ete moto ya liboso na mokili abotama na Katiopa ,esengeli toyeba yango ete boyebi mpe yaliboso ebota maka kaka na Katiopa . na tina ete moto oyo abotamaka na katiopa na botuni mituna kili kili ya ngo nde etindaka asosola lolenge ya komibikisa na mikakatano lolenge na lolenge .  Na ndakisa soki azali kobela  ye moko azalaki komilukela kisi, na kobota ba mayele lolenge na lolenga ya komibikisa (medecine na pharmacie.) , na tango esngelaki  a tonga ba ndako ya ngo wana Architecture ebotamaki  ,esengeleki azala na mboka , yango mpe mbotama ya politiki, socioligie , commerce , finance etc.. amitunaki mituna na tina yakoyeba soki akomaki na mokili ndenge nini na mokili ? azali kosala awa nini ? mpe akokende wapi soki akufi yango mpo ebotaki bo Nzambi  to la spiritualite .

Tala lisusu esika oyo likanisi ya bokoko ezali kosenga ete noyindo abanda lisusu konitunaka mituna ya mozindo mpe ayeba kotelemisa mikano kani ya kotia makanisi na ye na kati ya makomi to travail scientifique. na bosaleli biloko ya yemoko oyo ayebi malamu.
Na politiki lolenge ye akokamba mboka na ye esengeli atalelaka bokoko na ye ! azala na bososoli ya tina ya bokonzi. Eloko nini elingi koloba kokamba bato oyo ye akela te . Ezala kaka te lolenge ekoma nayango sikoyo ya kokamba mboka na koboma , kobangisa mpe koyiba nkita(richesse) epayi ba bato mike oyo ba zali na moto ya ekolo!
Mokonzi esengeli ayaba yango malamu ete azali na mosala makasi (responsabilite') na miso ya batu , ya bawe, ya bakulu mpe ya  Nzambi. Likanisi ya bokoko ezali kosenga ko sthiopa  makanisi lisusu na   tina ya kibokonzi. Lolenge kani moto okoki kokamata mpe kosalela bokonzi ya mboka , kasi ezala na ndenge ya kibobiso .
Na tango ya kala na Ekipata Mfumu  FE AA to FELALA (Paharaon) azalaki Tata ya ndako pamba te tina ya kombo oyo pharaon yango wana Tata Ya ndeko. Na esika wana azalaki kotalela makambo nyionso oyo etali ndeko na ye azalaki lisusu mokambi na Nzela ya molimu. Soki na ndakisa , na kati ya libota biloko yakolia ezangi .Esengeli bongo na moto ya yambo  tata  ebeta  moto  tina  aleyisa libota na nye .Kasi soki ya solo  biloko ezangi esolo ye bongo moto ya liboso esengeli akanga libumu bana balia. lokola ya lelo te oyo mikonzi bango bazali ko zala  lokola bazali na lola na esika oyo bato nyionso ya mboka bazali na lifelo... Ndakisa oyo ya bokonzi esengeli ezala bongo na esika nyionso oyo bokonzi ekutami.
Mokonzi esengeli atiya ma mayele naye na kati ya bokoko na ye natina ete azalaka mohumbu ya mayele ya bato mosusu . Azala muhumbu ya mayele ya ba franc macon , ba rose croix ya ba paya oyo ekotiya ye kaka na kati ya boloko na molimu na tina ete akoka kozala na kati na bomoko na ba oyo ya ye.

KAKA IMHOTEP


Awa tokolobela lisusu mwa muke likambo etali bakisi . esengeli to yeba ete lokola tolobelaki yango mwa liboso ezali nde na mboka Ekipata esika likambo oyo etali kobikisa bato na bokono na nzela ya bakisi ebandaki ( medecine na pharmacie ) epayi ya koko na biso IMHOTEP oyo azalaka kuna na mobu 2200 ans liboso ya mbotama ya YESUS. Ye solo nde azali tata ya Medicine oyo ba mindele ba zali kosalela na moyi mwa lelo oyo. Tina ete Hyppocrate oyo azali tata ya medecine kolanda na bamindele ye akendaki na ekipata esika atangaki epayi ya bayokoli ya Imhotep boyebi nyionso wana . Solo na kati na mboka ya Ekipata na sima ya liwa na KAKA IMHOTEP oyo kombo elingi koloba IM na kati na ye , Hotep elingi koloba kimia ; bakoko na biso ba pesaka ye lokumu nakomatisa ye na molongo ya bakulu balunga to (Saint ou les dieux) esika bazalaki kobelela ye soki basali na likama ya bokono oyo bazali kokate. Soki totali yango malamu ata na bankota na biso kombo wana etikala : MUCHIMA ,MOTEMA ,MTIMA, TIMA . na tina ya kokumisa ye. Elingi koloba ete likanisi ya bokoko ezali kolinga kozongosa lisusu lokumu na ba kisi na biso . Kolinga mpe kotalela epayi ya bamindele lolenge kani ba bongisa yango soki tokoki mpe koyekola oyo babongi sa yasika .
Koyikisa mpiko na koluka na tina ete tokoma na bakisi na biso to tika kozalaka kaka na sima yabakisi ya ba midele lokola tozali na banzete te na mboka na biso . koluka ko quantifier , mpe koluka dosage na oyo ya biso moko . Yango wana na kolanda matambe ya Kaka Imhotep , esengeli ete boyebi ya bakisi esala kotangisama na tina ete tokoka kozala na yango etambolaka elongo na medecin ya ba mindele .
Likanisi ya bokoko ezali kosenga na bakonzi bakoka kotia ordre na esika wana pe kosala ba hopitaux esika boyebi na bakisi na biso ekoki kosala mosala na yango. Mpo tokoki kotikala bahumbu ya bakisi ya bamindele te mpo na libela na likambo oyo etali bakisi .

5. Na makambo oyo etalikotonga ba Ndako

Awa to lakisi na nko bilili mibale oyo mpo na komosisa ete mpo na ba oyo nyionso balobaka ete ba tango na kala bakoko na biso bazalaki na bandako te to mpe bazalaki kolala likolo na ba nzete . oyo nyionso ezali lelo toyekolaki nde koyekola epayi ya ba mindele . To kanisi ezali lolenge yakolakisa ete solo toniyebi te . Solo moto moyindo oyo alobaka ndenge wana azali ata na likanisi  mokote ya oyo azali. Mpo bandako yakitoko ezalaka epayi na biso kobanda tango na Ekipata , Kanana , Napata , MOnomopata , Mali mpe bongo na bongo . Ba mboka kitoko ezalaka mpe na etongeli na biso moko.

Botala Ndako oyo kitoko ( en etage) na tonga na Empire du Mali na 12eme siecle na NDJENE.

















kino mikolo myia liko ezali.




Mboka ya Napata








Likanisi ya bokoko ezali kosenga mpe kolendisa bayindo na totelemisa lolenge ya kotonga na bobwaki miso na lolenge bakoko ba tonga. na tina ya kolakisa ete to zalaka na boyebi ya kotonga ya makasi mpe ba ndako kitoko .

Solo likanisi ya bokoko ezali koloba ete , ata ba bamboka na biso esengeli te kaka to tongaka yango lolenge ya bikolo ya ba mindele ?ezala lokola copie to caricature ya ba mbokaka nabango ? Lokola bayindo to yebite tina to lolenge ya eloko kitoko te! Mpo na kolakisa yango ezengili kaka to tala ndenge batongaka ba Mbanza ya Ekipata ya Monomopata , ya ba KWAZULU ba ndako ya cercle mpe ya carre' ya kitoko.


Na mokuse to koloba boye pamba te mingi ya koloba mpe kokoma ezali kasi esengeli to yeba ete , biso bayindo to tika komilela kasi to banda nde kosala mosala . Mosala ya makasi esengeli ebanda kosalema mpo te biso mpe to lakisa na mokili bwanyia oyo Nzambi atia na kati na biso. Likanisi ya bokoko ezali kosenga moyindo azongela bokoko na ye mpe ayekola komiyeba na tina ete ba loba :"linga omiyeba nanu yomoko liboso ete oyeba baninga, linga omilinga yo moko liboso olinga baninga."

Na Ndenge ya bosukisi ma solo oyo tokoloba nini?

Likanisi ya Bokoko ezali mopepe oyo ezali koya ko sekwisa bayindo oyo bakufa na kati na molimo na bango. Ya ngo ezali kosala ete ba yindo ba koka lisusu te ko zala na makanisi ya solo na sembo yionso mpe makanisi ya bango moko yo ngo to bengi bobiso.
Mopepe oyo ya likanisi ya bokoko ezali na ba biteni ebale oyo ekosimba misala na banzela ebele. mingi na boyebi ya solo to Science . awa to lingi koloba likanisi oyo ezwaka boyebi na botali makombo na kati ya biloko ya mokili mpe bososoli mikono , bwania nini ezali na kati ,ya ndenge biloko esalemaka ,kasi mingi kobinisa lolenge kani tokoki ko zongela kosala biloko oyo ne lolenge to lingi mpe epesa biso litomba .
Awa na  koki kozwa ndakisa ya Mbula lolenge ebeta ka . Koyeba soki mayi wana ehutaka wapi ( na ebale) ekonaka na mopepe ndenge nini ( soki moyi ebeti ya ngo) mpe esongelaka biso lokola mbula ndenge nini ( soki mopepe ekindiki yango na esinga oyo ezali malili) sima ya kososola ete ezali moto ya moyi tango ebetaka mayi yango nde tina ya mbula to yeba kosalela yango na litomba na biso moko.
bokoko ekotelemela mpe bozongisi ya bobiso na ndenge etali bonzambe na biso.  Na koyemba nini to nani NZAMBI mpe mokili ezali lolenge kani ? mpe etambolaka lolenge kani? 
Lisusu kotelemisa makambo na kala , masese makala , na tina ete soki toyebi lisusute oyo maye maleka kala, tokoki tososola maye mazali kosalema sikoyo te. Natango tozali kososola oyo ya lelo te tokoki koyeba maye makoya lobite.
Ezali lisusu ko zongisa ngala ya ba kisi na biso ya bokoko kasi ezali kosenga ete toluka lolenge ya kotambwisa yango elongo na bakisi ya ba mindele oyo esi ezwi mwa liboso na oyo ya biso na bisika mususu  lokola mpya biso ezali na mwaliboso na bisika mpakala . Natina ete tokoki kotikala ba humbu yabakisi ya bamindele mpo na libela te.

Likanisi ya bokoko elingi koloba te kozonga sima kasi ezali nde kokende liboso na komiyeba biso moko . Bayindo esengeli balongwa na esika oyo ya komilela lelaka mpe babanda kosala mpe kotambwisa mokili na bango na ndenge ba moni ete ekoki. Oyo nyionso na botali mingi mingi lolenge kani ba oyo baye liboso na biso bazalaki kosa. To zali koloba te ete bandeko batika kotinda bana na kelasi ya banindele . Kasi tozali nde koluka lolenge kani kelesi ekoki kozonga ebundeli oyo ezali kalamusa bana  nabiso , libaso ya maye esengeli basalaka mpo na mokili na bango na bobosani te bobiso . Ba longwa na boyekoli ya chaku elingi koloba kokanga makambo kaka mpo na kozwa ba pont kasi ba zala kozwa mateya ya bososoli biloko ma tina ete mitu ebanda kasala mpe bomoto ezonga. Likanisi ya bokoko ezali bolobi na biso. Yango nde ezali Ndoto na biso bayindo ya kozala na mokili oyo mpe kozala ko sala elongo na ba ninga ya mikili misusu mpo na kosunga mabele oyo.

1 commentaire:

  1. Tata, yo Oyebi makambo ya kitoko, Ba ndeko na biso, batu na biso ba yebi makambo oyo te, mais na sepeli ya mingi pona sikoyo nabi ke na zali ngai moko kaka te... kivuvu@gmail.com

    RépondreSupprimer

Vous pouvez laisser vos commentaire ici.

Ba ndeko bokoki kotika ya bino makanisi awa